Soki omoni ete bazali konyokola mobola kati na mokili, bongo boyengebene mpe bosembo etiolami, kokamwa likambo yango te ; pamba te mokambi moko azali na se ya mokambi mosusu ; mpe na likolo na bango mibale, ezali na bakonzi mosusu oyo baleki na bokonzi.
Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo, bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai kati na mitema na bino : Bobanga te lolenge bato bakotiola bino to bozala na somo ya mangungu na bango te.
Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.
Kasi Ngai, nalobi na bino : Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi ; moto oyo akofinga ndeko na ye : ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene ; mpe oyo akoloba na ndeko na ye : ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo.
Kasi Polo azongiselaki biso : — Mpo na nini bozali kolela mpe kolembisa ngai ? Nasili komibongisa kaka te mpo na kokangama, kasi mpe mpo na kokufa kati na Yelusalemi mpo na Kombo ya Nkolo Yesu.
Pamba te Ye oyo apesa mibeko azali kaka Ye moko Mosambisi, Ye nde azali na makoki ya kobikisa mpe ya kobebisa. Bongo yo, ozali nani mpo ete osambisa moninga na yo ?
Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.