Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 10:25 - Mokanda na Bomoi

25 Nzokande, ekoki mpo na moyekoli kozala lokola molakisi na ye, mpe mpo na mowumbu kozala lokola nkolo na ye. Soki babengaki Nkolo ndako « Belizebule, » ekozala boni mpo na bavandi ya ndako na Ye ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 10:25
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi Akazia akweyaki na Samari wuta na lininisa ya shambre na ye ya likolo mpe azokaki pota moko ya makasi. Atindaki bantoma na ye mpe alobaki na bango : — Bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni, mpo na koyeba soki nakobika solo na likama oyo.


Kasi tango Bafarizeo bayokaki maloba oyo ezalaki kolobama na tina na Yesu, balobaki : — Moto oyo azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe.


Mpe soki, Ngai, nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, bayekoli na bino babenganaka yango na nguya ya nani ? Yango wana, bayekoli na bino bakozala bango moko basambisi na bino.


Kasi Bafarizeo bazalaki koloba : — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.


Bazongisaki : — Iyo, tokoki ! Yesu alobaki na bango : — Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela mpe bokozwa na bino libatisi oyo Ngai nakozwa ;


Balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi balobaki : — Azali na molimo ya Belizebule kati na ye mpe azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.


Kasi bamoko kati na bango balobaki : — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe.


Soki Satana akomi komibundisa, bokonzi na ye ekotelema ndenge nini ? Nalobi bongo mpo bolobi ete Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule.


Mpe soki Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, bayekoli na bino babenganaka yango na nguya ya nani ? Mpo na yango, bayekoli na bino bakozala bango moko basambisi na bino.


Mingi kati na bango bazalaki koloba : — Azali na molimo mabe ! Azali na liboma ! Mpo na nini bozali koyoka ye ?


Bato kati na ngulupa bazongiselaki Yesu : — Ozali na molimo mabe. Nani azali koluka koboma yo ?


Bayuda bazongiselaki Ye : — Omoni ! Yango wana tolobaki na biso ete ozali moto ya Samari mpe ozali na molimo mabe kati na yo.


Na yango, Bayuda balobaki na Ye : — Tomoni sik’oyo ete ozali na molimo mabe kati na yo ! Pamba te Abrayami asila kokufa, basakoli mpe lokola ; bongo yo ozali koloba ete moto oyo akobatela Liloba na yo kati na ye akotikala kokufa te !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ