Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 10:2 - Mokanda na Bomoi

2 Tala bakombo ya bantoma zomi na mibale : liboso, Simona oyo kombo na ye mosusu ezalaki Petelo ; Andre, ndeko ya Petelo ; Jake, mwana mobali ya Zebede ; Yoane, ndeko ya Jake ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 10:2
44 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko mobali ya Jake ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi.


Bongo mama ya bana mibali ya Zebede ayaki epai ya Yesu, elongo na bana na ye ya mibali, mpe agumbamaki liboso na Ye mpo na kosenga Ye eloko moko.


Wana amemaki Petelo mpe bana mibali mibale ya Zebede, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ;


Wana Yesu azalaki kotambola pembeni ya ebale ya Galile, amonaki bandeko mibali mibale : Simona oyo bazalaki kobenga Petelo, mpe Andre, ndeko na ye ; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi.


Tango alongwaki wana mpo na kokoba mobembo na Ye, amonaki lisusu bandeko mibali mibale : Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye. Bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango elongo na Zebede, tata na bango. Yesu abengaki bango ;


Tango Yesu abimaki na ndako ya mayangani, akendeki elongo na Jake mpe Yoane na ndako ya Simona mpe Andre.


Bongo Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, oyo etalana na Tempelo. Petelo, Jake, Yoane mpe Andre batunaki Yesu, na esika oyo bazalaki bango moko kaka :


Tango bantoma bazongaki, basanganaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye makambo nyonso oyo bawutaki kosala mpe nyonso oyo bateyaki.


Yango wana, Nzambe, kati na bwanya na Ye, aloba : « Nakotindela bango basakoli mpe bantoma ; bakoboma bamoko, mpe bakonyokola bamosusu. »


Tango ngonga ekokaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bantoma.


Yesu atindaki Petelo mpe Yoane ; alobaki na bango : — Bokende kobongisela biso bilei ya Pasika.


Ndenge moko mpe mpo na Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, oyo bazalaki baninga ya mosala ya Simona. Bongo Yesu alobaki na Simona : — Kobanga te ! Kobanda lelo, okokoma koloba nde bato.


Tango bantoma bazongaki, bayebisaki Yesu makambo oyo basalaki. Bongo Yesu amemaki bango elongo na Ye, mpe bakendeki na engumba Betisaida, na esika oyo bazalaki kaka bango moko.


Filipo akendeki koyebisa Andre ; bongo bango mibale, Andre mpe Filipo, bakendeki koyebisa Yesu.


Moko kati na bango, moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga koleka bayekoli mosusu, avandaki pembeni ya Yesu.


Apotaki mbangu mpo na kokende kokutana na Simona Petelo mpe moyekoli mosusu, ye oyo Yesu azalaki kolinga ; alobaki na bango : — Balongoli Nkolo wuta na kunda, mpe toyebi te soki batie Ye wapi !


Wana bayekoli oyo bazalaki esika moko : Simona Petelo, Toma oyo babengaka Lipasa ; Natanaele, moto ya mboka Kana ya Galile, bana ya Zebede mpe bayekoli mosusu mibale ;


Petelo atalaki na sima mpe amonaki moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga koleka bayekoli mosusu, ye oyo, wana bazalaki kolia, alalelaki Yesu na tolo mpe atunaki Ye : « Nkolo, nani akoteka Yo ? » Ye mpe azalaki kolanda bango.


Ezali kutu moyekoli yango nde azali kotatola makambo yango mpe akomaki yango na mokanda. Mpe biso toyebi ete litatoli na ye ezali ya solo.


Boye, Yesu alobaki na bantoma zomi na mibale : — Boni, bino mpe bolingi kokende ?


Yesu alobaki na bango : — Boni, ezali Ngai te nde naponaki bino nyonso zomi na mibale ? Nzokande, moko kati na bino azali Satana !


Yesu azalaki nde koloba na tina na Yuda, mwana mobali ya Simona Isikarioti, oyo, kati na bantoma zomi na mibale, asengelaki koteka Ye.


Moko kati na bayekoli na Ye, oyo kombo na ye ezali Andre, ndeko mobali ya Simona Petelo, alobaki na Ye :


Tango bakomaki, bamataki na shambre ya likolo, kati na etaje epai wapi bazalaki kosangana mbala na mbala. Ezalaki : Petelo, Yoane, Jake, Andre, Filipo, Toma, Bartelemi, Matayo ; Jake, mwana mobali ya Alife ; Simona oyo azalaki moto ya lingomba ya Bazelote ; mpe Jide, mwana mobali ya Jake.


Bongo babetaki zeke, mpe zeke ekweyaki epai ya Matiasi ; boye Matiasi aponamaki, mpe babakisaki ye na lisanga ya bantoma zomi na moko.


Abomaki kutu Jake, ndeko mobali ya Yoane, na mopanga.


Ezalaki mokolo moko, Petelo mpe Yoane bakendeki na Tempelo na tango ya mabondeli : ezalaki na ngonga ya misato sima na midi.


Bongo amonanaki epai ya Jake, mpe epai ya bantoma nyonso.


Ezali Ye moko Klisto nde akomisaki bamoko bantoma, bamosusu basakoli, bapanzi Sango Malamu, babateli bibwele mpe balakisi,


Yango wana, bandeko basantu, bino oyo Nzambe abenga mpo na kozwa bomengo ya Likolo, botalela kaka Yesu oyo biso tozali kondima lokola Ntoma mpe Mokonzi ya Banganga-Nzambe.


Ngai Petelo, ntoma ya Yesu-Klisto ; Epai ya baponami ya Nzambe oyo bazali kati na bamboka ya bapaya mpe bapalangani na bituka ya Ponti, ya Galatia, ya Kapadose, ya Azia mpe ya Bitini.


Ngai Simona Petelo, mosali mpe ntoma ya Yesu-Klisto ; Epai ya bato oyo bazwaki kondima ya motuya moko na kondima na biso, na nzela ya bosembo ya Yesu-Klisto, Nzambe na biso mpe Mobikisi na biso :


Ngai mpaka ; Epai ya mwasi moponami ya Nzambe, mpe epai ya bana na ye, oyo nalingaka kati na solo. Ezali ngai moko kaka te moto nalingaka bino, kasi mpe bato nyonso oyo bayebi solo.


Ngai mpaka ; Epai ya Gayusi, molingami na ngai, oyo nalingaka kati na solo.


Emoniseli kowuta na Yesu-Klisto. Nzambe apesaki Ye yango mpo ete alakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli koya kala mingi te. Yesu-Klisto atindaki anjelu na Ye koyebisa emoniseli yango epai ya Yoane, mosali na Ye.


Ngai Yoane, ndeko na bino, oyo azali kokabola elongo na bino pasi, bokonzi mpe molende kati na Yesu, nazalaki kati na esanga ya Patimosi, likolo ya Liloba na Nzambe mpe litatoli na ngai na tina na Yesu.


Likolo, sepela na libebi na yango ! Bino mpe basantu, bosepela ! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »


Ngai Yoane, nayokaki mpe namonaki makambo oyo. Mpe tango nayokaki mpe namonaki yango, nafukamaki na makolo ya anjelu oyo alakisaki ngai yango mpo na kogumbamela ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ