Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 10:19 - Mokanda na Bomoi

19 Tango bakofunda bino epai ya bakambi, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba to lolenge ya koloba yango, pamba te ekopesamela bino na tango wana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 10:19
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo kende, Ngai moko nakosunga yo mpo ete oloba malamu, mpe nakoteya yo makambo oyo osengeli koloba.


Okoloba na ye mpe okotia maloba na monoko na ye, bongo Ngai nakosunga bino mibale mpo ete bokoka koloba malamu, mpe nakoteya bino makambo oyo bosengeli kosala.


Kasi Yawe alobaki na ngai : — Koloba te : « Nazali elenge. » Osengeli kokende epai ya bato nyonso epai wapi nakotinda yo, mpe osengeli koyebisa bango makambo nyonso oyo nakotinda yo.


Bongo Yawe asembolaki loboko na Ye, asimbaki monoko na ngai mpe alobaki : — Tala, nasili kotia maloba na Ngai kati na monoko na yo.


Likolo na Ngai, bakomema bino na makasi liboso ya bayangeli mpe ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai liboso na bango mpe liboso ya bapagano.


Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina ?


Yango wana, bomitungisaka te na koloba : ‹ Tokolia nini ? Tokomela nini ? Tokolata nini ? ›


Yango wana, bomitungisaka te mpo na mokolo ya lobi oyo ezali koya, pamba te mokolo yango ya lobi ekomitungisa na tina na yango moko : mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango.


Tango bakokumba bino kati na bandako ya mayangani, liboso ya bakambi mpe bakonzi, bomitungisa te na koluka koyeba ndenge nini bokosamba mpe maloba nini bokoloba ;


pamba te Molimo Mosantu akolakisa bino, na tango yango, makambo oyo bosengeli koloba.


Kasi bazangaki makoki ya kotelemela bwanya mpe Molimo oyo azalaki kotinda ye koloba.


Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.


Ezali Nkolo nde atelemaki pembeni na ngai mpe apesaki ngai nguya mpo ete, na nzela na ngai, mateya eteyama na mobimba na yango nyonso, mpe mpo ete Bapagano bayoka yango. Mpe akangolaki ngai wuta na monoko ya nkosi.


Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ