Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 10:18 - Mokanda na Bomoi

18 Likolo na Ngai, bakomema bino na makasi liboso ya bayangeli mpe ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai liboso na bango mpe liboso ya bapagano.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 10:18
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakolobela malako na Yo liboso ya bakonzi na kozanga koyoka soni.


Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako na bango ya mayangani.


Tango bakofunda bino epai ya bakambi, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba to lolenge ya koloba yango, pamba te ekopesamela bino na tango wana.


mpe Yesu alobaki na ye : — Yoka malamu ! Koyebisa likambo oyo na moto te, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.


Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako ya mayangani. Likolo na Ngai, bokosamba liboso ya bayangeli mpe liboso ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai.


Boye, koyoka soni te mpo na kotatola na tina na Nkolo na biso to mpe na tina na ngai oyo nakangami na boloko mpo na Ye, kasi mona pasi elongo na ngai mpo na Sango Malamu kolanda makasi oyo Nzambe azali kopesa yo,


Ngai Yoane, ndeko na bino, oyo azali kokabola elongo na bino pasi, bokonzi mpe molende kati na Yesu, nazalaki kati na esanga ya Patimosi, likolo ya Liloba na Nzambe mpe litatoli na ngai na tina na Yesu.


Kasi tango bakosilisa kopesa litatoli na bango, nyama oyo ekobima wuta na libulu ya monene mpe ya molili makasi ekobundisa bango, ekolonga bango mpe ekoboma bango.


Tango Mpate abukaki ekangelo ya mitano, namonaki na se ya etumbelo, milimo ya bato oyo baboma likolo na Liloba na Nzambe mpe likolo na litatoli na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ