Bino elongo na mabota na bino, bokolia yango na bisika nyonso, pamba te yango ezali lifuti na bino mpo na mosala na bino kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
Alobaki na bango : « Bomema eloko moko te mpo na mobembo, longola kaka lingenda. » Alobaki na bango : « Bomema te, ezala sakosi to lipa to mbongo kati na mokaba na bino.
Asimbaki kaka lingenda na ye na loboko, aponaki mabanga mitano ya moselu kati na moluka ya lubwaku mpe atiaki yango na libenga na ye ya mobateli bibwele ; asimbaki ebambelo mabanga na loboko mpe apusanaki epai ya moto ya Filisitia.
Saulo alobaki na mosali na ye : — Likambo te ! Tokende epai na ye ! Kasi tokopesa eloko nini epai ya moto na Nzambe ? Pamba te kati na libenga na biso, biloko ya kolia ezali lisusu te ; tozali ata na kado te ya kopesa epai ya moto na Nzambe. Tozali na eloko nini ?