Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 1:9 - Mokanda na Bomoi

9 Oziasi abotaki Yotami ; Yotami abotaki Akazi ; Akazi abotaki Ezekiasi ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 1:9
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu mibale na bokonzi, Yotami, mwana mobali ya Oziasi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.


Azaria akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi ; mpe Yotami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Mokonzi Oziasi abelaki bokono ya maba kino na mokolo na ye ya kufa. Lokola azalaki kobela bokono ya maba, akomaki kovanda na ndako moko batonga mosika, pamba te babenganaki ye mosika ya Tempelo ya Yawe. Yotami, mwana na ye ya mobali, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, ayangelaki bato ya mokili.


Yotami azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yerusha. » Yerusha azalaki mwana ya Tsadoki.


Ezekiasi abotaki Manase ; Manase abotaki Amoni ; Amoni abotaki Joziasi ;


Asa abotaki Jozafati ; Jozafati abotaki Yorami ; Yorami abotaki Oziasi ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ