24 Tango Jozefi alamukaki, asalaki makambo oyo anjelu na Nkolo atindaki ye kosala mpe azwaki Mari lokola mwasi na ye.
Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Nzambe atindaki ye.
Bongo, Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Yawe atindaki ye.
Moyize asalaki nyonso oyo Yawe atindaki ye.
atandaki ndako ya kapo na likolo ya Mongombo mpe atiaki ezipelo na likolo ya ndako ya kapo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
Apelisaki minda liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
mpe atumbaki likolo na yango ansa ya solo kitoko, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
Bazalaki komisukola tango nyonso bazalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
« Elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, bongo bakopesa Ye kombo Emanwele oyo elingi koloba : Nzambe elongo na biso. »
Kasi Jozefi asangisaki nzoto te na Mari kino tango Mari abotaki mwana mobali ; mpe Jozefi apesaki Ye kombo Yesu.
Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.
Mbala moko, anjelu ya Nkolo abimaki na pwasa, mpe pole engengaki kati na boloko. Anjelu aningisaki Petelo na mopanzi mpo na kolamusa ye ; alobaki na ye : — Telema noki ! Mpe minyololo ekweyaki longwa na maboko ya Petelo.
Kasi na butu, anjelu moko ya Nkolo afungolaki bikuke ya boloko, abimisaki bantoma mpe alobaki na bango :