Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 1:2 - Mokanda na Bomoi

2 Abrayami abotaki Izaki ; Izaki abotaki Jakobi ; Jakobi abotaki Yuda mpe bandeko na ye ya mibali ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 1:2
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala libota ya Izaki, mwana mobali ya Abrayami. Abrayami azalaki tata ya Izaki,


Sima na yango, ndeko na ye mpe abimaki, loboko na ye ekanga litindi ya Ezawu ; yango wana bapesaki ye kombo « Jakobi. » Izaki azalaki na mibu tuku motoba ya mbotama tango Rebeka abotaki.


Abrayami azalaki tata ya Izaki. Bana mibali ya Izaki : Ezawu mpe Isalaele.


« Kasi yo, Isalaele, mosali na Ngai, Jakobi oyo naponaki, bino bakitani ya Abrayami, molingami na Ngai,


Botala Abrayami, tata na bino ; mpe Sara oyo abotaki bino. Tango nabengaki ye, azalaki kaka ye moko ; napambolaki ye mpe nakomisaki ye tata ya bato ebele !


Mpo na bakitani ya Yuda : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.


Tala molongo ya mbotama ya Yesu-Klisto, mokitani ya Davidi mpe ya Abrayami :


Yuda abotaki Peretsi mpe Zera na nzela ya Tamari, mwasi na ye ; Peretsi abotaki Etsironi ; Etsironi abotaki Arami ;


Bongo Nzambe asalaki boyokani elongo na Abrayami, mpe elembo ya boyokani yango ezalaki : kokatama ngenga. Abrayami abotaki Izaki mpe akataki ye ngenga na mokolo ya mwambe ya mbotama na ye ; Izaki abotaki Jakobi mpe akataki ye ngenga, bongo Jakobi mpe abotaki bakoko na biso zomi na mibale mpe akataki bango ngenga.


Mpo na kondima, Sara mpe azwaki makoki ya komema zemi atako mibu na ye ya kobota esilaki koleka wuta kala, pamba te andimaki ete Ye oyo apesaki ye elaka akosaka te.


Toyebi malamu ete Nkolo na biso azali ya libota ya Yuda, mpe Moyize atikalaki koloba eloko moko te na tina na bonganga-Nzambe ya libota ya Yuda.


Kati na libota ya Yuda, bato nkoto zomi na mibale babetamaki kashe ; kati na libota ya Ribeni, bato nkoto zomi na mibale ; kati na libota ya Gadi, bato nkoto zomi na mibale ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ