Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 1:19 - Mokanda na Bomoi

19 Jozefi, mobandami na ye ya libala, azalaki moto ya sembo. Boye, lokola Jozefi alingaki te koyokisa Mari soni na miso ya bato, azwaki mokano ya koboya Mari na kimia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 1:19
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na sanza misato, bayebisaki Yuda : — Tamari, bokilo na yo ya mwasi, asalaki kindumba, mpe tala kutu akomi na zemi. Yuda alobaki : — Babimisa ye mpe batumba ye na moto !


Tala lisolo ya libota ya Noa. Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye ; azalaki kosala mokano ya Nzambe.


Soki mobali moko asangisi nzoto na mwasi oyo azali mobandami ya mobali mosusu, kasi nanu bapeseli ye te biloko ya libala to kopesa ye bonsomi, esengeli mobali wana afuta lomande. Nzokande bango mibale, bakoboma bango te mpo ete mwasi yango asikolamaki nanu te.


Soki mobali asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu, mwasi ya moninga na ye ; bango mibale, mwasi na mobali oyo basali ekobo, esengeli koboma bango.


Balobaki na Yesu : — Moyize apesaki na mobali nzela ya koboma libala na mwasi na ye, kaka soki akomi mokanda ya koboma libala.


pamba te Erode azalaki kobanga Yoane, wana ayebaki ete Yoane azali moto ya sembo mpe mosantu, mpe azalaki kobatela ye. Tango nyonso oyo Erode azalaki koyoka Yoane koloba, azalaki komitungisa mingi ; nzokande azalaki kaka kosepela koyoka ye.


Na tango wana, kati na Yelusalemi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki Simeoni. Azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa makambo ya Nzambe ; azalaki kozela kobondisama ya Isalaele, mpe Molimo Mosantu azalaki likolo na ye.


Bato yango bazongisaki : — Towuti epai ya Kornei, mokonzi ya basoda ; azali moto ya sembo mpe atosaka Nzambe, mpe Bayuda nyonso bazali kotatola bolamu na tina na ye. Anjelu ya bule ayebisaki ye ete abengisa yo kati na ndako na ye mpo ete ayoka makambo oyo ozali na yango ya koloba na ye.


Tango tongo etanaki, bamonaki mokili te, kasi bamonaki kaka libongo moko ya zelo na suka, epai ebale ekota. Boye bazwaki mokano, soki bakolonga, ya kosemisa masuwa kuna.


Na elikya yango, nazalaki na mabongisi ya koya liboso epai na bino mpo ete bokoka kozwa ngolu ya mibale ;


Kasi soki makambo oyo bafundeli ye ezali ya solo, mpe ezali ata na elamba moko te oyo ezali kotalisa ete ayebaki nanu nzoto ya mibali te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ