Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 1:16 - Mokanda na Bomoi

16 Jakobi abotaki Jozefi, mobali ya Mari ; mpe Mari azalaki mama ya Yesu oyo babengaka Klisto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 1:16
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eliwudi abotaki Eleazari ; Eleazari abotaki Matani ; Matani abotaki Jakobi ;


Simona Petelo azongisaki : — Ozali Masiya, Mwana na Nzambe na bomoi.


Bongo Yesu apekisaki makasi bayekoli na Ye koloba na moto ete Ye azali Masiya.


Sima na bato ya mayele kokende, anjelu na Nkolo abimelaki Jozefi kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Telema, kamata Mwana elongo na mama na Ye ; bokima na Ejipito mpe bowumela kuna kino tango nakoyebisa yo lisusu ete bozonga, pamba te Erode akoluka koboma Mwana. »


Tango Pilato amonaki ebele ya bato basangani, atunaki bango : — Kati na Yesu Barabasi mpe Yesu oyo babengaka Klisto, bolingi nabimisela bino nani mpo ete akoma nsomi ?


Pilato atunaki bango : — Nasala nini na Yesu oyo babengaka Klisto ? Bato nyonso bazongisaki : — Baka ye na ekulusu !


Ezali ye te mosali mabaya ? Ezali ye te mwana ya Mari mpe ndeko ya Jake, Jozefi, Jide mpe Simona ? Boni, bandeko na ye ya basi bavandaka awa te elongo na biso ? » Yango wana, ezalaki penza libaku mabe mpo na bango kondima Ye.


Atindaki ye epai ya elenge mwasi Mari oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe azalaki mobandami ya libala na mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jozefi, mokitani ya Davidi.


Tango baboti na Ye bamonaki Ye, bakamwaki mingi. Mama na Ye alobaki na Ye : — Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye ? Tata na yo mpe ngai tozalaki mitema likolo, mpe toluki Yo bisika nyonso !


Mari abotaki mwana mobali, mwana na ye ya liboso ; alingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye kati na elielo ya bibwele, pamba te esika ezalaki te mpo na bango kati na ndako ya bapaya.


Yesu azalaki na mibu pene tuku misato ya mbotama tango abandaki mosala na Ye. Bato bazalaki kokanisa ete azali mwana mobali ya Jozefi ; Jozefi, mwana mobali ya Eli ;


Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna : — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ?


Mwasi alobaki na Yesu : — Nayebi ete Masiya azali koya, Ye oyo babengaka Klisto ; mpe tango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ