Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Matayo 1:12 - Mokanda na Bomoi

12 Sima na bana ya Isalaele kokende na bowumbu, na Babiloni, Yekonia abotaki Shealitieli ; Shealitieli abotaki Zorobabeli ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Matayo 1:12
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Amemaki Yelusalemi mobimba na bowumbu : bakonzi nyonso ya basoda mpe basoda, bato nyonso ya mayele ya misala ya maboko mpe ba-oyo basalelaka bibende. Bango nyonso bazalaki bato nkoto zomi. Kaka babola nde batikalaki kati na mokili.


Tango Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na sambo na bowumbu, Evili-Merodaki, mokonzi ya Babiloni, ayokelaki Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, mawa mpe abimisaki ye na boloko, na mokolo ya tuku mibale na sambo ya sanza ya zomi na mibale, kaka na mobu oyo akomaki mokonzi.


Libota ya Yekonia, mokangami : Shealitieli, mwana na ye ya mobali ;


Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, elongo na baninga na ye, Banganga-Nzambe, mpe Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, elongo na bandeko na ye, babandaki kotonga etumbelo ya Nzambe ya Isalaele mpo na kobonza kuna mbeka ya kotumba kolanda makomi kati na Mobeko ya Moyize, moto na Nzambe.


Bongo, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, bazongelaki mosala ya kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe kati na Yelusalemi. Mpe basakoli ya Nzambe bazalaki elongo na bango mpo na kosunga bango.


Tala Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bawutaki na bowumbu elongo na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue : Seraya, Jeremi, Esidrasi,


Na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « ata soki yo Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, ozalaki lokola lopete na mosapi ya loboko na Ngai ya mobali, nakolongola yo kaka.


Boni, moto oyo, Konia, azali te mbeki ya kopasuka oyo etiolama to eloko oyo ezanga tina ? Mpo na nini babengana ye elongo na bana na ye mpe babwaka bango na mokili oyo bayebi te ?


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Koma kombo ya moto oyo lokola moto oyo abota te, lokola moto oyo akolonga te na bomoi na ye, pamba te moko te kati na bana na ye akolonga, moko te akovanda lisusu na kiti ya bokonzi ya Davidi to akozala lisusu mokonzi ya Yuda. »


bisalelo oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atikaki tango amemaki Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, na bowumbu longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, elongo na bankumu nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi ;


Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, na mokolo ya liboso ya sanza ya motoba, Yawe alobaki na nzela ya Mosakoli Aje liloba oyo epai ya Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; epai ya Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe :


Boye Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe bato nyonso oyo batikalaki batosaki mongongo ya Yawe, Nzambe na bango, mpe maloba ya mosakoli Aje kolanda ndenge Yawe, Nzambe na bango, atindaki ye. Mpe bato nyonso bakomaki kobanga Yawe.


Mpe Yawe alendisaki Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; mpe Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na bato nyonso oyo batikalaki. Bayaki mpe bamikotisaki na mosala ya kotonga Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na bango,


« Loba na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; na Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe na bato nyonso oyo batikali :


Na mokolo wana, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakozwa yo Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mosali na Ngai, mpe nakokomisa yo lokola kashe na Ngai, pamba te ezali yo nde Ngai napona, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Joziasi abotaki Yekonia mpe bandeko na ye ya mibali wana bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu, na Babiloni.


Zorobabeli abotaki Abiwudi ; Abiwudi abotaki Eliakimi ; Eliakimi abotaki Azori ;


Kobanda na Abrayami kino na Davidi, elekaki bikeke zomi na minei ; kobanda na Davidi kino na tango oyo bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu, na Babiloni, elekaki lisusu bikeke zomi na minei ; mpe kobanda na bowumbu, na Babiloni, kino na Klisto, elekaki lisusu bikeke zomi na minei.


Yoda, mwana mobali ya Yoanani ; Yoanani, mwana mobali ya Reza ; Reza, mwana mobali ya Zorobabeli ; Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Shealitieli, mwana mobali ya Neri ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ