Tango Jozefi amonaki Benjame elongo na bango, alobaki na moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi na ye : « Mema bato oyo na ndako na ngai ; boboma nyama moko mpe bolamba yango mpo ete bato oyo bakolia elongo na ngai na midi. »
Nalingaki komema yo mpe kokotisa yo na ndako ya mama na ngai, mpo ete oteya ngai bolingo. Nalingaki komelisa yo vino ya kitoko, oyo basali na bambuma ya grenade.
Na ngomba oyo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobongisa feti ya biloko kitoko mpo na bato nyonso, feti monene ya vino ya kala, ya misuni oyo eleki mafuta mpe ya vino ya kala oyo balongola malamu salite.