Nalapi ndayi na Kombo na Ngai ; oyo ezali sembo ebimaka na monoko na Ngai, liloba oyo bakoki koboya te : mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, mpe minoko nyonso ekolapa ndayi na Kombo na Ngai.
Azali nani, ye oyo awuti na Edomi, na Botsira, na bilamba ya motane ? Azali nani, ye oyo alati bilamba ya lokumu, oyo azali kotambola lokola elombe, mpo ayebi ete azalaka makasi ? « Ezali nde Ngai ; nakataka makambo na bosembo, natonda na nguya mpo na kobikisa. »
mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili