Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 8:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bino bato oyo bozanga mayele, bokoma na bososoli ! Bino bazoba, bokoma mayele !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 8:5
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moyi ebimaka wuta na songe moko ya likolo, mpe esukisaka mobembo na yango na songe mosusu ; eloko moko te ezangaka kozwa molunge na yango.


Bino bato ya kilikili, bososola ! Bazoba, bokokoma mayele tango nini ?


« Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo ? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele ?


Pamba te kotomboka ya bato oyo bazangi mayele ekoboma bango, mpe bozangi bokebi ya bato oyo bazangi mayele ekoboma kaka bango moko ;


mpo na kopesa mayele epai ya bazoba, mpe boyebi epai ya bilenge.


Bato ya bwanya bakozwa nkembo, kasi bazoba bakozala na soni.


Ngai, Bwanya, navandaka elongo na kokanisa, boye nayebi kokundola mayele mpe bososoli.


« Bato, nazali koganga makasi epai na bino, nazali nde koloba na bino bato !


« Tika ete moto nyonso oyo azangi mayele aya awa ! » Atindi maloba epai ya bato oyo bazangi bososoli :


Yawe akobima lokola elombe, akopelisa zuwa na Ye lokola mobundi bitumba ; akoganga, solo ; akoganga makasi, mpe akolonga banguna na Ye.


mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole ; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »


Nzambe aponaki biloko ezanga tina, biloko ya kotiola, biloko oyo ezalaka te, mpo na kokomisa pamba biloko oyo mokili epesaka tina,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ