Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 8:36 - Mokanda na Bomoi

36 Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko : moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 8:36
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki osali masumu, ekosala Nzambe nini ? Soki masumu na yo ezali ebele, ekosala Ye nini ?


bakolia mbuma ya etamboli na bango mpe bakotonda na mabongisi ya mitema na bango moko.


Pamba te kotomboka ya bato oyo bazangi mayele ekoboma bango, mpe bozangi bokebi ya bato oyo bazangi mayele ekoboma kaka bango moko ;


Moto oyo alingaka koyekola alingaka boyebi, kasi moto oyo aboyaka pamela azali zoba.


Moto oyo asundolaka koyekola atiolaka nde bomoi na ye moko, kasi moto oyo andimaka pamela akomaka mayele.


Somo oyo mokonzi apesaka ezali lokola koganga ya nkosi ; moto oyo apesaka ye kanda amilukelaka ye moko pasi.


Kozwa bomengo na nzela ya lokuta ezali kaka molinga oyo epanzanaka mpe motambo oyo ememaka na kufa.


Bilongi na bango ezali kofunda bango ; bazali kolakisa masumu na bango ndenge bato ya Sodome bazalaki kosala, bazali kobomba yango te. Mawa na bango, pamba te bamilukeli nde makambo !


Mpo na nini bino elongo na bato na bino bokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ndenge Yawe akataki mpo na ekolo nyonso oyo ekoboya kosalela mokonzi ya Babiloni ?


Botika mabe na bino nyonso oyo bozalaki kosala ; bozwa mitema ya sika mpe molimo ya sika. Mpo na nini bokolinga kokufa, oh libota ya Isalaele ?


Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? ›


Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na mpiko : — Tosengeli liboso koteya bino Liloba na Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bozali bino moko komimona ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi na biso sik’oyo epai ya bato oyo bazali Bayuda te.


Kasi Polo agangaki na mongongo makasi : — Komisala mabe te ! Biso nyonso tozali awa !


Soki ezali na moto oyo alingaka Nkolo te, tika ete alakelama mabe ! Oh Nkolo, yaka !


ekozala boni mpo na moto oyo atioli Mwana na Nzambe, amoni pamba makila ya boyokani, oyo epetolaki ye, mpe afingi Molimo ya ngolu ?


ndenge nini biso tozanga kozwa etumbu soki tozwi na pamba lobiko ya boye ? Solo, Ye moko Nkolo nde asakolaki liboso na tina na lobiko yango ; bongo na sima, bato oyo bayokaki sango yango batalisaki biso bosolo na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ