29 tango akatelaki ebale monene mondelo mpo ete mayi ezindisa mokili na Ye te, tango atiaki miboko ya mabele ;
akataka mondelo na likolo ya mayi, na suka ya pole mpe na molili.
Otia mokili na likolo ya miboko na yango mpo ete eningana te seko na seko.
Otiaki mondelo oyo ekoki koleka te ; ekozonga lisusu te kozipa mokili.
Akelaki likolo na mayele na Ye ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Asangisaka mayi ya bibale minene esika moko, mpe atiaka yango na bisika ya mozindo.
Na nzela ya bwanya, Yawe atiaki miboko ya mabele ; na nzela ya mayele, alendisaki likolo.
tango atiaki mapata na likolo mpe abimisaki mayi wuta na bitima,
Bokoki penza kobanga Ngai te, » elobi Yawe ? « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te ? Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te ; ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te.
Kasi Pilato azongisaki : — Makambo oyo nakomi ekotikala kaka ndenge wana.