28 tango atiaki mapata na likolo mpe abimisaki mayi wuta na bitima,
Nzambe akelaki etando ; akabolaki mayi oyo ezalaki na se ya etando na mayi ya likolo. Yango esalemaki mpe bongo.
Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mayi oyo ezali na se ya likolo esangana esika moko mpo ete mabele ya kokawuka ebima ! » Yango esalemaki mpe bongo.
Tango Noa akokisaki mibu nkama motoba ya mbotama, na sanza ya mibale, na mokolo ya zomi na sambo, bitima nyonso ya se mpe maninisa nyonso ya likolo efungwamaki.
Bitima ya se mpe maninisa ya likolo ekangamaki mpe mvula etikaki konoka.
akangaka mayi kati na mapata, kasi mapata epasukaka te ;
Osila kokoma kino na etima ya ebale monene ? Osila kotambola na se ya libulu ya molili ?
Kasi na pamela na Yo, mayi ekimaki ; na lokito ya kake na Yo, mayi etiolaki,
Yawe akelaki Likolo mpe mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; azali sembo seko na seko.
Na nzela ya bwanya, Yawe atiaki miboko ya mabele ; na nzela ya mayele, alendisaki likolo.
Nazalaki wana tango atandaki likolo na esika na yango, mpe tango akataki mondelo ya etando monene ya mayi ya bozindo,
tango akatelaki ebale monene mondelo mpo ete mayi ezindisa mokili na Ye te, tango atiaki miboko ya mabele ;
Kasi Yesu alobaki na bango : — Bato na kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ? Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge ; bongo kimia monene ezongaki.