Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 8:27 - Mokanda na Bomoi

27 Nazalaki wana tango atandaki likolo na esika na yango, mpe tango akataki mondelo ya etando monene ya mayi ya bozindo,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 8:27
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

akataka mondelo na likolo ya mayi, na suka ya pole mpe na molili.


Yawe atia Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Likolo, azali Mokonzi ya mokili mobimba.


Akelaki likolo na mayele na Ye ; pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !


Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe ; mampinga na yango nyonso, na nzela ya pema ya monoko na Ye.


Na nzela ya bwanya, Yawe atiaki miboko ya mabele ; na nzela ya mayele, alendisaki likolo.


tango amisalelaki nanu te, ezala mabele to bilanga to mpe putulu ya mokili.


tango atiaki mapata na likolo mpe abimisaki mayi wuta na bitima,


Azali kobatela etonga na Ye lokola mobateli bibwele : kosangisa bana meme na maboko na Ye mpe kokanga bango na tolo na Ye ; kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi oyo ezali nanu komela mabele.


Yawe avandaka na likolo ya mondelo ya mabele, epai wapi bato na yango bamonanaka lokola mabanki ; atandaki likolo lokola liputa mpe afungolaki yango lokola ndako ya kapo mpo na kovanda kuna ;


Kasi Yawe asala mabele na nguya na Ye, alendisa mokili na bwanya na Ye mpe atanda likolo na mayele na Ye.


pamba te ezali na nzela na Yesu nde nyonso ekelama kati na Likolo mpe na mabele, bikelamu oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te, milimo mpe bokonzi ya milimo, bakonzi ya milimo mpe banguya. Ezali na nzela na Yesu mpe mpo na Yesu nde nyonso ekelama.


Kasi sik’oyo, na mikolo oyo ezali ya suka, Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Mwana na Ye, oyo Ye moko Nzambe akomisaki Mokitani ya biloko nyonso. Ezali mpe na nzela na Ye nde Nzambe asalaki mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ