Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 8:24 - Mokanda na Bomoi

24 Nabotamaki tango mayi ya bozindo ezalaki nanu te, tango miluka ebimisaki nanu mayi na yango te,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 8:24
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokili ezalaki na lolenge te mpe ezalaki pamba. Molili ezalaki na likolo ya mozindo ; mpe Molimo ya Nzambe azalaki kopepa na likolo ya mayi.


Osila kokoma kino na etima ya ebale monene ? Osila kotambola na se ya libulu ya molili ?


Nakosakola mobeko ya Yawe. Alobaki na ngai : « Ozali Mwana na Ngai ya mobali, na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo.


Mozindo ya mayi ezipi bango, bakiti kino na se ya ebale monene lokola libanga.


Na nzela ya mayele na Ye, mozindo ya se ya mabele ebimisaki mayi mpe mapata enokisaki mvula.


Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.


Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.


Boye lokola Tata alingaka Mwana, yango wana alakisaka Ye makambo nyonso oyo Ye moko Tata asalaka ; kutu, akolakisa Ye lisusu kosala makambo minene koleka oyo bosili komona kino sik’oyo, mpo ete bokamwa.


Epai ya anjelu nini penza Nzambe aloba : « Ozali mwana na ngai ; na mokolo ya lelo, nakomi Tata na yo ? » To mpe : « Ngai nakozala Tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai ? »


Botala ndenge nini Nzambe atalisaki biso bolingo na Ye : atindaki Mwana na Ye se moko kati na mokili mpo ete tozala na bomoi ya solo na nzela na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ