Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 8:20 - Mokanda na Bomoi

20 Natambolaka na nzela ya bosembo, mpe nasalelaka banzela oyo ememaka na boyengebene,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 8:20
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ayeisaka sika makasi ya bomoi na ngai, akambaka ngai na banzela ya bosembo mpo na lokumu ya Kombo na Ye.


Olobaki : « Nakopesa yo malako mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda ; nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.


Boye, okotambola na nzela ya bato malamu mpe okolanda nzela ya bato ya sembo.


Boye, okososola likambo nini ezali solo, alima, sembo : nzela nyonso oyo ememaka na bolamu.


Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.


Pamba te ekolakisa yo nzela tango okokende na mobembo, ekobatela yo tango okolala pongi mpe ekosolola na yo tango okolamuka.


Mbuma na ngai ezali kitoko koleka wolo, ezala wolo ya peto, mpe mbuma oyo nabotaka eleki palata ya kitoko.


mpo na kopesa libula epai ya bato oyo balingaka ngai mpe mpo na kotondisa bibombelo na bango.


Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba : « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi. Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.


Bakoyoka lisusu nzala te mpe posa ya mayi te ; molunge ya esobe to moyi makasi ekomonisa bango pasi te, pamba te Ye oyo alingaka bango akolakisa bango nzela mpe akomema bango pene ya miluka.


Tala, nakomisaki ye motatoli na Ngai na miso ya bato ya bikolo ebele, mokambi mpe motambolisi ya bato.


Mokengeli afungolelaka mobateli bameme ekuke, bameme eyokaka mongongo na ye. Mobateli abengaka bameme na ye na kombo na yango mpe abimisaka yango na libanda.


Yango wana, bosala keba na oyo nyonso Yawe, Nzambe na bino, atindi bino ; bobaluka te ezala na ngambo moko to na ngambo mosusu.


pamba te Mpate oyo azali na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi akozala Mobateli na bango, akomema bango na bitima ya mayi ya bomoi, mpe Nzambe akopangusa mpinzoli nyonso ya miso na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ