Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 8:15 - Mokanda na Bomoi

15 Ezali na nzela na ngai nde bakonzi batambolisaka mokili, mpe bakambi basalaka mibeko ya sembo ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 8:15
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ; Ye oyo asepelaki na yo mpe atiaki yo na kiti ya bokonzi ya Isalaele ! Ezali mpo ete Nzambe na yo alingaka Isalaele mpo na libela nde atiaki yo lokola mokonzi mpo ete osala na bosolo mpe na bosembo. »


Tango Isalaele mobimba bayokaki ndenge mokonzi akataki likambo oyo, babangaki mokonzi mpo ete bamonaki ete azali solo na bwanya ya Nzambe mpo na kokata makambo na bosembo.


Boye, pesa na mowumbu na Yo motema ya mayele mpo na kokamba bato na Yo mpe kososola malamu mpe mabe. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ?


Bayangeli ya bituka bazalaki komema bilei, moto na moto na sanza na ye, mpo na mokonzi Salomo mpe mpo na bato nyonso oyo bazalaki kolia na mesa ya mokonzi ; bazalaki kosala ete eloko moko te ezanga.


Kati na bana na ngai nyonso ya mibali, pamba te Yawe apesi ngai bango ebele, aponaki Salomo, mwana na ngai ya mobali, mpo ete avanda na Kiti ya Bokonzi ya Yawe kati na Isalaele.


Pesa ngai bwanya mpe boyebi mpo ete nakoka kotambolisa bato oyo. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ?


Nzambe alobaki na Salomo : — Lokola likambo oyo ezali posa ya motema na yo ; lokola osengi bozwi te, bomengo to lokumu te to mpe kufa ya banguna na yo te ; lokola osengi te bomoi molayi, kasi osengi bwanya mpe boyebi mpo na kotambolisa bato na Ngai, oyo natie yo mokonzi na bango,


Yango wana, bino bakonzi, bozala na mayele ; bino bayangeli ya mokili, boyoka likebisi oyo.


Mokonzi azali na nguya, alingaka bosolo. Olendisaka bosembo. Osalaki bosembo mpe bosolo kati na Jakobi.


Mokonzi oyo akambaka na bosembo ayeisaka kimia na mokili na ye, kasi mokonzi oyo afutisaka mpako ebele abebisaka mokili yango.


ezali na nzela na ngai nde bakambi, bankumu mpe basambisi nyonso ya mokili bayangelaka.


nakokomisa lisusu basambisi na bino malamu lokola na tango ya kala ; mpe bapesi toli na bino, ndenge ezalaka na ebandeli. Sima na yango, bakobenga bino lisusu Engumba ya Bosembo, Engumba ya Boyengebene.


Na mikolo yango mpe na tango yango, nakobimisa Moto ya nzete ya sembo wuta na libota ya Davidi ; akosala makambo ya sembo mpe ya boyengebene kati na mokili.


Ezali Ye nde abongolaka tango mpe makambo, alongolaka bakonzi mpe atombolaka bakonzi, apesaka bwanya epai ya bato ya bwanya mpe boyebi epai ya bato ya mayele.


Makambo wana nyonso ekokokisama mpo na mokonzi Nabukodonozori.


Bato nyonso ya mokili bazali pamba na miso na Ye ; asalaka makambo oyo alingi na mampinga nyonso ya likolo mpe na bavandi ya mabele. Moto moko te azali na makoki ya kozongisa loboko na Ye sima.


Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.


Tika ete moto nyonso atosa bakonzi ya leta, pamba te bokonzi nyonso ewutaka na Nzambe, mpe ezali Nzambe nde atia bakonzi oyo bazali.


Bongo namonaki Lola efungwami, mpe mpunda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Kombo ya motambolisi ya mpunda yango ezali : « Sembo mpe Solo. » Akataka makambo mpe abundaka bitumba na bosembo.


Na nzambala mpe na mopende na Ye, bakoma kombo : « Mokonzi ya Bakonzi mpe Nkolo ya bankolo. »


Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.


Tango Samuele amonaki Saulo na mosika, Yawe alobaki na ye : « Tala moto oyo nalobelaki yo ; ye nde akokonza bato na Ngai. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ