Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 8:12 - Mokanda na Bomoi

12 Ngai, Bwanya, navandaka elongo na kokanisa, boye nayebi kokundola mayele mpe bososoli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 8:12
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

oyo tata na ye azalaki moto ya Tiri ; mpe mama na ye, moto ya libota ya Nefitali, azalaki mwasi akufisa mobali. Irami ayebaki kosalela bronze. Bongo lokola azalaki na bwanya, mayele mpe boyebi mingi, azalaki kosala lolenge nyonso ya biloko ya bronze. Boye, ayaki epai ya mokonzi Salomo mpe asalelaki ye misala nyonso oyo asengaki ye.


Apesaki ye elili ya nyonso oyo molimo atiaki na makanisi na ye na tina na lopango ya Tempelo ya Yawe, ya bashambre nyonso ya zingazinga, ya biloko ya talo ya Ndako ya Nzambe mpe ya biloko ya bule.


Davidi alobaki : — Nyonso oyo nazali na yango na mokanda oyo, ekomami na loboko na Yawe ; Ye moko apesi ngai mayele mpo na kososola misala nyonso oyo elili ezali kotalisa.


Mpe wana basoda ya Yuda babalukaki, basosolaki ete babundisami na liboso mpe na sima na mbala moko. Boye, bagangaki epai na Yawe, mpe Banganga-Nzambe babetaki kelelo.


Oh Yawe, misala na Yo ezali ebele ! Osalaki nyonso na bwanya ; mokili etondi na biloko oyo okela.


Moyize alobaki na bana ya Isalaele : « Botala, Yawe aponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda ;


mpo na kopesa mayele epai ya bazoba, mpe boyebi epai ya bilenge.


Bino bato oyo bozanga mayele, bokoma na bososoli ! Bino bazoba, bokoma mayele !


Nzambe na ye ateyaka ye mpe alakisaka ye nzela oyo asengeli kolanda.


Oh, tala ndenge nini bomengo, bwanya mpe boyebi ya Nzambe ezali na mozindo mingi ! Moto moko te akoki koyeba makanisi na Ye mpe kososola nzela na Ye !


Kati na Klisto, Nzambe aponaki biso lisusu mpo ete tokitana na libula na biso, kolanda mabongisi ya Ye oyo akokisaka nyonso, kolanda makanisi ya mokano na Ye,


oyo akabolelaki biso yango na bofuluki, na kopesa biso bwanya mpe bososoli nyonso,


na tina ete bakonzi ya milimo mpe banguya kati na mboka ya milimo eyeba sik’oyo, na nzela ya Lingomba, bwanya ya Nzambe oyo emonisamaka na lolenge ebele,


Ezali kati Klisto nde bomengo nyonso ya bwanya mpe ya boyebi ya Nzambe ebombami.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ