11 pamba te bwanya ezali na motuya koleka mayaka ya kitoko, bongo eloko moko te ya motuya ekokani na yango.
Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengi na monoko na ngai ! Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.
Yango wana nalingaka mibeko na Yo koleka wolo, koleka kutu wolo ya peto ;
Mpo na ngai, mibeko oyo ozwaki mpe osakolaki na monoko na Yo ezali malamu koleka biloko nkoto moko ya wolo mpe ya palata.
Kotosa Yawe ezali peto, ewumelaka libela na libela. Mitindo ya Yawe ezali ya solo, nyonso ezali penza sembo.
Bwanya ezali malamu koleka wolo, mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.
Wolo mpe babiju ezalaka na yango ebele, kasi bibebu oyo ebimisaka boyebi eleki na motuya.
Nani akoki komona mwasi ya lokumu ? Azali na motuya koleka babiju ya talo.
Bwanya ezali lokola libula, ezalaka malamu mpe epesaka litomba na bato oyo bamonaka moyi.
Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ?
Ezali te na ngambo mosusu ya ebale monene mpo ete okoka kotuna : « Nani akokatisa ebale monene mpo na kokamata yango mpe kosakolela ngai yango, mpo ete nakoka kotosa yango ? »