Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 8:1 - Mokanda na Bomoi

1 Boni, Bwanya azali kobelela te ? Mayele azali koyokisa mongongo na ye te ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 8:1
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai mpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai ;


Mwana na Ngai, kobosana mateya na ngai te, kasi batela mibeko na ngai kati na motema na yo ;


Yoane azali ye oyo mosakoli Ezayi alobaki : « Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe : ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike ! › »


Wuta na tango wana, Yesu abandaki koteya : « Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »


Pamba te esengeli ete Sango Malamu esakolama liboso epai ya bikolo nyonso ya mokili.


mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. »


Na mokolo ya suka ya feti, mokolo oyo eleki monene, Yesu atelemaki mpe alobaki na mongongo makasi : — Tika ete moto nyonso oyo azali na posa ya mayi aya epai na Ngai mpe amela.


Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino ; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.


Kasi Nkolo azongiselaki ngai : « Kende, nakotinda yo mosika, epai ya bato ya bikolo ya bapaya. »


Nzokande, mpo na bato oyo Nzambe abenga, ezala Bayuda to Bagreki, Klisto azali nguya mpe bwanya ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ