Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 7:7 - Mokanda na Bomoi

7 namonaki kati na molongo ya bato oyo bazangi mayele, kati na bilenge mibali, elenge mobali moko oyo azangi penza mayele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 7:7
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Liso ya moto ya ekobo ezelaka ete molili ekota ; amilobelaka : ‹ Moto moko te akomona ngai, › mpe abombaka elongi na ye.


Emoniseli ya liloba na Yo engengisaka, epesaka bazoba mayele.


Moyi ebimaka wuta na songe moko ya likolo, mpe esukisaka mobembo na yango na songe mosusu ; eloko moko te ezangaka kozwa molunge na yango.


« Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo ? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele ?


Pamba te kotomboka ya bato oyo bazangi mayele ekoboma bango, mpe bozangi bokebi ya bato oyo bazangi mayele ekoboma kaka bango moko ;


mpo na kopesa mayele epai ya bazoba, mpe boyebi epai ya bilenge.


Bibebu ya moto ya mayele ezalaka na bwanya, kasi fimbu ezali malamu mpo na mokongo ya moto oyo azangi mayele.


Moto oyo asalaka bilanga atondaka na bilei, kasi moto oyo alandaka bagoyigoyi azangi mayele.


Moto oyo azangi mayele andimaka makambo nyonso oyo balobaka, kasi moto ya mayele atambolaka na bokebi.


Bato oyo bazangi mayele bazwaka bozoba lokola libula, kasi bato ya mayele bazwaka boyebi lokola motole.


Ezali malamu te kobungisa mayele, kati na bolingo oyo eleka ndelo. Lokolo ya moto oyo atambolaka noki-noki ezangaka te kobeta libaku.


Beta motioli fimbu, mpe zoba akozwa mayele ; sembola moto ya mayele, mpe akozwa boyebi.


Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele akoleka wana mpe akokutana na pasi.


Nalekaki pembeni ya elanga ya moto ya goyigoyi, mpe pembeni ya elanga ya vino ya moto oyo azangi mayele ;


Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka, kasi moto oyo azangi mayele alekaka kaka wana mpe akutanaka na pasi.


Mwana na ngai, zala na bokebi na bwanya na ngai, mpe pesa litoyi na yo na mayele na ngai,


Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo.


Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga azali lokola moto oyo azangi mayele ; kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma ;


Bino bato oyo bozanga mayele, bokoma na bososoli ! Bino bazoba, bokoma mayele !


Tika ete moto oyo azangi mayele aya awa ! Atindi maloba epai ya bato oyo bazanga bososoli :


« Tika ete moto nyonso oyo azangi mayele aya awa ! » Atindi maloba epai ya bato oyo bazangi bososoli :


« Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te ; bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te, bayebi kaka kosala mabe, kasi bayebi kosala bolamu te. »


Yesu atunaki bango : — Bino mpe, boni, bozwi nanu bososoli te ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ