Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 7:26 - Mokanda na Bomoi

26 pamba te asili kokweyisa mpe kozokisa bato ebele, mpe asili kobomisa bingambe mibali.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 7:26
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki.


Ezalaki penza na nzela ya mabala ya boye nde Salomo, mokonzi ya Isalaele, akweyaki na masumu. Nzokande, kati na ebele ya bikolo ya bapaya, ezalaki na mokonzi moko te oyo akokanaki na ye ! Nzambe na ye azalaki kolinga ye mpe atiaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba, kasi basi ya bapaya bakweyisaki ye na masumu.


pamba te ndako na ye ememaka na kufa, mpe nzela na ye ememaka na mboka ya bakufi.


Mwasi ya ndumba atelemaka na ekenge lokola moyibi mpe akomisaka mibali bazoba koleka.


akobuka lokola mbuma : minyoko mpe kosambwa ; bongo soni na ye ekosila te.


Ndako na ye ezali penza nzela ya mboka ya bakufi, oyo ememaka kino na bandako ya kufa.


Kasi bayebi te ete epai na ye nde bakufi basanganaka, mpe ete babengami na ye bazali kati na mokili ya bakufi.


Tosengeli te kosala pite, ndenge bamosusu kati na bango basalaki ; mpe, na mokolo moko, bato nkoto tuku mibale na misato bakufaki.


Solo, nazali kobanga lisusu ete, tango nakoya lisusu epai na bino, Nzambe ayokisa ngai soni liboso na bino, mpe ete nalela mpo na bato ebele oyo basalaki masumu liboso kasi babongwani te na misala na bango ya mbindo, na kindumba mpe na ekobo oyo basalaka.


Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela ; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino.


Bato ya Filisitia bakangaki ye, batobolaki ye miso, bamemaki ye na Gaza mpe bakangaki ye minyololo ya bibende ya bronze. Akomaki konika bambuma ya ble na enikelo ya libanga kati na boloko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ