24 Sik’oyo, mwana na ngai ya mobali, yoka ngai, pesa ngai matoyi na yo mpo na koyoka maloba ya monoko na ngai !
Bana na ngai, boya, boyoka ngai ; Nakolakisa bino kotosa Yawe.
Mwana mayele ayokaka mateya ya tata na ye, kasi mwana oyo atiolaka ayokaka pamela te.
Bana na ngai, boyokaka mateya ya tata, bozalaka na bokebi mpo ete bozwa mayele.
Sik’oyo mwana na ngai, yoka ngai, kopesa maloba na ngai mokongo te ;
Bana na ngai, lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota, nazali lisusu koyoka pasi mpo na bino, kino tango Klisto akosalema kati na bino.
Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo mpo ete bosala masumu te. Kasi soki esali ete moko kati na bino akweyi na lisumu, tozali na Molobeli moko epai ya Tata : Yesu-Klisto, Nkolo-Na-Bosembo.