Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 7:23 - Mokanda na Bomoi

23 kino tango likonga ekotobola ye motema, lokola ndeke oyo ekeyi mbangu na motambo na kozanga koyeba ete ekeyi kokufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 7:23
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, ezali pamba kotia monyama liboso ya miso ya bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.


Pamba te likolo ya mwasi ya ndumba, okoki kobungisa ezala eteni na yo ya lipa, mpe mwasi ya libala akoki kobebisa bomoi ya motuya.


Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga azali lokola moto oyo azangi mayele ; kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma ;


Elenge mobali alandaki ye mbala moko, lokola ngombe oyo bazali komema na bisika oyo babomaka banyama, lokola moto ya liboma oyo bakangi mpo na kobeta ye


Kasi bayebi te ete epai na ye nde bakufi basanganaka, mpe ete babengami na ye bazali kati na mokili ya bakufi.


Namoni likambo oyo : mwasi oyo motema na ye ezali lokola motambo to monyama, oyo maboko na ye ezali lokola minyololo, azali mabe koleka kufa ; mobali oyo asepelisaka Nzambe akotikala kokangama te na motambo na ye, kaka mobali oyo asalaka masumu nde akokangama na motambo na ye.


Moto moko te ayebi tango nini ngonga na ye ekokoka : ndenge mbisi ekangamaka na monyama to ndenge banyama ekangamaka na motambo, ndenge wana mpe bato bakangamaka na mitambo ya pasi oyo ekweyelaka bango na mbalakata.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ