Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 7:22 - Mokanda na Bomoi

22 Elenge mobali alandaki ye mbala moko, lokola ngombe oyo bazali komema na bisika oyo babomaka banyama, lokola moto ya liboma oyo bakangi mpo na kobeta ye

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 7:22
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okangi makolo na ngai na minyololo ya bibende, ozali kokengela malamu lolenge na ngai ya kotambola mpe kolandela bisika nyonso oyo natiaka bilembo ya matambe na ngai.


Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga azali lokola moto oyo azangi mayele ; kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma ;


Na nzela ya maloba na ye ya sukali, alongaki kokosa ye ; na nzela ya maloba na ye ya elengi, amemaki ye.


kino tango likonga ekotobola ye motema, lokola ndeke oyo ekeyi mbangu na motambo na kozanga koyeba ete ekeyi kokufa.


Nganga-Nzambe Pashuri abetisaki Mosakoli Jeremi fimbu mpe akangisaki ye na likonzi oyo ezalaki na ekuke ya likolo ya Benjame, ekuke oyo ememaka na Tempelo ya Yawe.


Nganga-nzambe ya nzambe Zewusi, oyo ndako ya nzambe na ye ezalaki na libanda ya ekuke ya engumba, amemaki na bikuke ya engumba bangombe ya mibali elata bafololo mpe bililingi elingama-lingama lokola basheni, pamba te ye mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye balingaki kotumbela bango mbeka.


Tango kaka mokengeli azwaki mitindo oyo, abwakaki bango kati na boloko ya kati mpe akangisaki makolo na bango na mabaya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ