Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 7:2 - Mokanda na Bomoi

2 Batela mateya na ngai malamu, mpe okozala na bomoi ; batela mibeko na ngai lokola mbuma ya liso na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 7:2
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Malako na Yo ezali sembo mpo na libela ; pesa ngai bososoli mpo ete nabika !


Batela ngai lokola mbuma ya liso, bomba ngai na se ya mapapu na Yo,


Tingama makasi na mateya oyo bapesi yo, kobwaka yango te, batela yango malamu mpo ete ezali bomoi na yo.


Tika ete ezala te mosika ya miso na yo ! Batela yango malamu kati na motema na yo,


Tata na ngai azalaki koteya mpe koloba na ngai boye : « Tika ete motema na yo ebatela maloba na ngai, bomba mibeko na ngai mpe okozala na bomoi,


Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai, boyoka mpe bokozala na bomoi ; nakosala boyokani ya libela elongo na bino, boyokani oyo nalakaki Davidi, na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.


Jeremi azongisaki : — Te, bakokaba yo te ! Nabondeli yo, tosa Yawe mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo ; bongo nyonso ekotambola malamu mpo na yo mpe okobikisa bomoi na yo.


Bobatela mitindo mpe mibeko na Ngai, pamba te moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. Nazali Yawe.


mpe alobaki na ye : — Kima mbangu penza, mpe kende koloba na elenge mobali wana : « Yelusalemi ekotikala lisusu na bamir te mpo ete motango ya bato mpe ya banyama oyo bazali kati na yango ekokoma ebele koleka.


Moto oyo alingaka Ngai, ezali ye oyo abatelaka mibeko na Ngai mpe atiaka yango na misala. Tata na Ngai akolinga moto oyo alingaka Ngai ; Ngai mpe nakolinga ye mpe nakomimonisa epai na ye.


Bozali baninga na Ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kotinda bino.


Amonaki ye na esobe, kati na mokili oyo ekawuka, etonda na koganga ya somo. Azingelaki ye, abatelaki ye, akengelaki ye lokola mbuma ya liso na Ye.


Esengo na bato oyo basukolaka bilamba na bango mpo na kozwa ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya koleka na bikuke mpo na kokota na engumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ