Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 7:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mwasi yango ya ndumba asimbaki elenge mobali, ayambaki ye, alaliselaki ye miso mpe alobaki na ye :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 7:13
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mwasi ya Potifari akangaki ye na bilamba mpe alobaki na ye : — Yaka kosangisa na ngai nzoto ! Kasi Jozefi asundolaki elamba na ye kati na maboko ya mwasi ya Potifari mpe akimaki libanda ya ndako.


Sima na yango, mwasi ya nkolo ya Jozefi alulaki ye Jozefi mpe alobaki na ye : — Yaka kosangisa na ngai nzoto !


Kangola ngai wuta na maboko ya bato ya misala mabe, mpe bikisa ngai liboso ya basopi makila ya bato.


Moto mabe akangaka elongi na ye, kasi moto ya sembo alendisaka nzela na ye.


mpo na kobenga baleki nzela, bato oyo bazali kokende na nzela na bango.


Lokola Nkolo Yawe asungaka ngai, nakoyokisama soni te. Yango wana, nakomisi elongi na ngai makasi lokola libanga, mpe nayebi ete nakoyokisama soni te.


Basi nyonso oyo basalaka kindumba basengaka lifuti ; kasi epai na yo, ezali yo nde opesaka bakado epai ya bamakangu na yo nyonso : na bongo, osombaka mitema na bango mpo ete bawuta bipai na bipai mpe baya kosala ekobo na yo.


Bato oyo epai wapi nazali kotinda yo, bazali mito makasi mpe mitema mabanga. Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. ›


Bongo yo, mwana na moto, kobanga bango te mpe kobanga maloba na bango te, atako banzube mpe basende ezingeli yo mpe ozali kovanda elongo na koto. Kozala na somo ya makambo oyo bazali koloba te mpe kolenga liboso na bango te atako bazali batomboki.


Wana bana ya Isalaele bavandaki nanu na Shitimi, bamipesaki na kindumba na bilenge basi ya Moabi.


Ezalaki nde bango bato balandaki toli ya Balami mpe batindikaki bana ya Isalaele na kopesa Yawe mokongo, kati na makambo oyo esalemaki na Peori ; mpe yango nde esalaki ete etumbu ekweya likolo ya bato na Yawe.


Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : opesaka na Jezabeli, mwasi oyo amibengaka mosakoli, nzela ya kopengwisa basali na Ngai na mateya na ye ya mabe, mpo na kotindika bango na kindumba mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ