Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 7:1 - Mokanda na Bomoi

1 Mwana na ngai, batela mibeko na ngai mpe bomba yango malamu kati na motema na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 7:1
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ndima malako oyo ekowuta na monoko na Ye, mpe batela maloba na Ye kati na motema na yo.


Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo, mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;


Moto ya bwanya abombaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebendaka pasi.


Mwana na Ngai, kobosana mateya na ngai te, kasi batela mibeko na ngai kati na motema na yo ;


Tika ete ezala te mosika ya miso na yo ! Batela yango malamu kati na motema na yo,


Makolo na ye ekokita kino na kufa, ekokende kino na mokili ya bakufi.


Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo.


akotikala kondima ata lifuti moko te mpo ete akoka kolimbisa, mpe akoboya yango ata soki babakisi bakado.


Yesu azongisaki : — Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango !


Nkona oyo ekweyaki na mabele ya malamu ezali bato oyo, na mitema ya sembo mpe ya malamu, bayokaka Liloba, babatelaka yango, bayikaka mpiko mpe babotaka bambuma.


Yesu azongiselaki ye : — Moto oyo alingaka Ngai akobatela maloba na Ngai, mpe Tata na Ngai akolinga ye ; bongo tokoya epai na ye mpe tokovanda elongo na ye.


Bobosana te makambo oyo nayebisaki bino : « Mowumbu aleki nkolo na ye te, na bokonzi. » Lokola banyokolaki Ngai, bino mpe bakonyokola bino ; soki babatelaki mateya na Ngai, bakobatela mpe mateya na bino.


bilakeli mabe, soki boboyi kotosa mibeko ya Yawe, Nzambe na bino, mpe bopengwi na nzela oyo natindi bino lelo, na kosalelaka banzambe mosusu oyo bino botikalaki koyeba te.


Esengo na moto oyo atangaka maloba ya lisakoli oyo, mpe esengo na bato oyo bayokaka maloba yango mpe babatelaka makambo oyo ekomama kati na yango, pamba te tango ekomi pene.


Kasi anjelu alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala, ya bandeko na yo, basakoli ; mpe ya ba-oyo nyonso babatelaka maloba ya buku oyo. Gumbamela nde Nzambe ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ