Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 6:6 - Mokanda na Bomoi

6 Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi, tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 6:6
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, ezali pamba kotia monyama liboso ya miso ya bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.


Ndenge masanga ya ngayi esalaka minu ngayi, mpe molinga esalaka miso pasi, ndenge wana mpe moto ya goyigoyi azalaka epai ya bato oyo batindaka ye pasi.


Maboko ya goyigoyi ekomisaka moto mobola, kasi maboko oyo esalaka ekomisaka moto mozwi.


Moto ya goyigoyi ayokaka baposa, kasi akoki kokokisa yango te ; nzokande baposa ya moto ya nzunzu ekokisamaka.


Nzela ya moto ya goyigoyi ezalaka lokola banzela mike ya banzube, kasi nzela ya bato ya sembo ezalaka ya kosembolama.


Moto oyo azongaka sima na mosala na ye azali ndeko ya mobebisi.


Bogoyigoyi ememaka moto na pongi makasi, mpe moto ya goyigoyi akufaka nzala.


Moto ya goyigoyi akotisaka loboko na ye kati na bilei, kasi akokaka te kozongisa yango na monoko na ye.


Moto ya goyigoyi asalaka bilanga te likolo ya kobanga malili ; boye na tango ya kobuka mbuma, alukaka mpe kobuka, kasi akozwa eloko te.


Baposa ya moto ya goyigoyi ekoboma ye, pamba te maboko na ye eboyaka kosala.


Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ezali kuna na libanda, ekoboma ngai na kati-kati ya balabala. »


Mwana na ngai, yoka mpe zala na bwanya, batela motema na yo kati na nzela ya sembo.


Ezali na banyama mike minei na mokili, oyo, nzokande, ezalaka na bwanya mingi :


Bafurmi : ezali bikelamu oyo ezanga makasi, kasi ebongisaka bilei na yango na tango ya elanga ;


Yo moto ya goyigoyi, okolala pongi kino tango nini ? Kino tango nini okolamuka na pongi na yo ?


Ngombe eyebi nkolo na yango, ane mpe eyebi elielo oyo nkolo na yango apeselaka yango bilei ; kasi Isalaele ayebi te, bato na Ngai basosoli te. »


Ezala kutu nkongi, kati na likolo, eyebaka bileko ya kokende na bisika mosusu ; ebenga, ndeke ya mayi mpe mbilambila eyebaka ata tango ya kozonga, kasi bato na Ngai bayebi mibeko ya Yawe te.


Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe mpe ya goyigoyi ! Lokola oyebaki ete nabukaka bambuma na elanga oyo nalonaki te mpe nalokotaka bambuma na esika oyo nabwakaki ata nkona moko te,


Botala ndeke ya likolo : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo ; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango ?


mpo na oyo etali mosala, bozalaka bagoyigoyi te ; mpo na oyo etali Molimo, bopelaka na yango makasi ; mpo na oyo etali Nkolo, bozalaka bawumbu ya malamu ;


Tolingi te ete bokoma bagoyigoyi, kasi bomekola bato oyo bazwaka, na nzela ya kondima mpe kokanga motema, biloko oyo Nzambe alaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ