Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 6:34 - Mokanda na Bomoi

34 Pamba te zuwa epelisaka kanda makasi kati na mobali, mpe akozala na mawa te na mokolo oyo akozongisa mabe na mabe ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 6:34
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango nkolo ya Jozefi ayokaki lisolo oyo mwasi na ye abetelaki ye na maloba oyo : « Tala ndenge mowumbu na yo asali ngai, » Potifari asilikaki makasi.


Akomaki na zemi, mpe atindaki maloba epai ya Davidi : « Nazali na zemi. »


Bomengo ekolongisa ata moke te na mokolo ya kanda ya Nzambe, kasi bosembo ekangolaka na kufa.


Kotomboka ememaka makambo ya somo, mpe kanda ebebisaka ; kasi nani akoki kotelema liboso ya zuwa ?


akobuka lokola mbuma : minyoko mpe kosambwa ; bongo soni na ye ekosila te.


akotikala kondima ata lifuti moko te mpo ete akoka kolimbisa, mpe akoboya yango ata soki babakisi bakado.


Tia ngai lokola kashe na motema na yo, lokola kashe na loboko na yo ; pamba te bolingo ezali makasi lokola kufa, zuwa ezali makasi lokola mokili ya bakufi. Moto ya bolingo epelaka makasi lokola kake kowuta epai na Yawe.


Tala, nakotelemisa bato ya Medi ete batelemela bango, bato oyo palata elobelaka bango eloko moko te mpe basepelaka na bango na wolo te.


« Nganga-Nzambe Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, asili kolongola kanda na Ngai likolo ya bana ya Isalaele, pamba te atalisi bolingo oyo eleka ndelo mpo na lokumu na Ngai kati na bango ; yango wana, na kanda na Ngai ya makasi, nasilisaki koboma bana ya Isalaele te.


Soki mobali asali zuwa mpe akomi kokanisa ete mwasi na ye akomi mbindo, azala mbindo to mbindo te,


Boni, tolingi nde kotumbola zuwa ya Nkolo ? Boni, tozali makasi koleka Ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ