3 Boye, mwana na ngai, sala makambo oyo mpo ete omikangola, pamba te omikabaki na maboko ya moninga na yo ; kende komikitisa liboso na ye mpe tingama na ye,
Davidi azongiselaki Gadi : — Nazali na pasi makasi na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene ; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato.
Bongo, mosakoli Shemaya akendeki epai ya Roboami mpe bakambi ya Yuda oyo basanganaki na Yelusalemi tango bamonaki Shishaki kopusana. Alobaki na bango : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bosundolaki Ngai, yango wana Ngai mpe nasundoli bino na maboko ya Shishaki. »
Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.