Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 6:25 - Mokanda na Bomoi

25 Kotika te ete motema na yo elula kitoko na ye, mpe miso na ye ekweyisa yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 6:25
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jewu akendeki na Jizireyeli. Tango Jezabeli ayokaki bongo, atiaki monzele na elongi na ye, abongisaki suki na ye mpe apusanaki pene ya lininisa mpo na kotala libanda.


« Nasalaki boyokani elongo na miso na ngai ete nalula elenge mwasi te.


Obetisi ngai motema makasi, Oh ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema ; obetisi ngai motema na komona etaleli ya miso na yo, mpe na komona moko ya sheneti ya kingo na yo.


Yawe alobi : « Lokola basi ya Siona bazali lofundu, lokola batambolaka mapeka likolo mpe balalisaka miso na lofundu, lokola batambolaka na kodenda malembe-malembe mpe na kolelisa biloko ya monzele oyo balataka na makolo na bango,


Oh engumba ekufa, ozali kosala nini ? Olati bilamba ya motane mpe babiju ya wolo ; otie bonzenga na miso na yo. Ozali komikomisa kitoko na pamba, bamakangu na yo bazali kotiola yo mpe bazali koluka koboma yo.


Batindaki mpe bantoma epai ya bato oyo bazalaka mosika. Mpe tango bayaki, omisukolaki nzoto, opakolaki biloko ya monzele na miso mpe olataki babiju.


Kasi Ngai, nalobi na bino : Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.


Okolulaka te mwasi ya moninga na yo ; okolulaka te ndako ya moninga na yo, elanga na ye, mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, ngombe na ye, ane na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ