Matambe na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe, mpe bazalaka mbangu mpo na kosopa makila ya moto oyo asali mabe te. Makanisi na bango ezalaka kaka ya mabe ; kobuka-buka mpe kobebisa nde ezalaka na nzela na bango.
Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango ! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango.
bosalaka mabongisi ya komonisa baninga na bino pasi te, bolingaka te kolapa ndayi ya lokuta ; pamba te makambo wana nyonso, nayina yango makasi, » elobi Yawe.