Kasi bato ya Isalaele bazalaki kotiola bamemi sango ya Nzambe, bazalaki komona pamba makebisi na Ye mpe bazalaki kowolola basakoli na Ye kino Yawe kosilikela bato na Ye makasi ; mpe bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibikisa liboso ya kanda makasi ya Yawe.
Nzokande, wana nazalaki nanu kosakola, Pelatia, mwana mobali ya Benaya, akufaki. Nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nagangaki na mongongo makasi : « Oh Nkolo Yawe ! Okosilisa solo koboma penza ndambo ya bana ya Isalaele, oyo batikali na bomoi ? »
Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.