Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 6:14 - Mokanda na Bomoi

14 azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye, asalaka tango nyonso mabongisi ya mabe mpe alukaka kaka tango nyonso makelele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 6:14
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya misala mabe ! Kokutanisa ngai te na bato na kanza.


Basalaka mabongisi mabe kati na mitema na bango mpe balukaka bitumba mikolo nyonso.


Minoko na bango ebimisaka maloba mabe mpe lokuta, baboyaka kosala na bokebi mpe kosala bolamu.


Boni, bato oyo babongisaka kosala mabe bazali na libunga te ? Kasi boboto mpe solo ezali epai ya bato oyo babongisaka kosala bolamu.


Moto ya Beliali abongisaka kosala mabe, mpe maloba na ye ezali lokola moto oyo etumbaka.


Moto ya motema mabe abongaka te, mpe moto ya lolemo ya lokuta akomona pasi.


na bato oyo basepelaka kosala mabe, na bato oyo bazalaka na esengo ya kokota na bozindo ya mabe,


Nzela ya moto mabe ezalaka na mabaku, kasi mosala ya moto ya peto ezalaka sembo.


Moto oyo alonaka masumu abukaka pasi, mpe makasi ya kanda na ye nyonso ekosuka.


Moto oyo asalaka mabongisi ya kosala mabe akokende sango lokola moteki baninga.


Kosalaka moninga na yo mabe te soki azali kovanda na kimia epai na yo.


Pamba te Yawe ayinaka bato mabe, kasi ayebisaka basekele na Ye epai ya bato ya sembo.


Misala ya moyimi ezalaka mabe, abongisaka kaka miango ya mabe mpo na kopengwisa mobola na maloba ya lokuta na tango oyo mobola azali na mbeba te.


Kasi bato mabe bazali lokola ebale oyo etomboki, oyo evandaka kimia te : mayi na yango ebwakaka potopoto mpe bosoto libanda.


Yawe alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala bato oyo basalaka mabongisi ya mabe mpe bapesaka batoli ya mabe kati na engumba oyo.


« Lokola baloni mopepe, bakobuka mopepe ya makasi. Nzete ya ble oyo ezanga moto ebimisaka farine te. Ezala soki ebimisi mito, ezali bapaya nde bakolia yango.


Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango ! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango.


Bandeko, nabondeli bino : bosala keba na bato oyo bakotisaka bokabwani mpe batiaka mabaku na nzela na bino, na makambo oyo ekeseni na mateya oyo bosilaki kozwa. Bozala mosika na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ