13 Abetaka-betaka miso, apesaka bilembo na makolo na ye mpe alobaka na nzela ya bilembo ya misapi ;
Mpo na nini motema na yo ezali kopengwisa yo, mpe miso na yo ezali kobeta-beta ?
Nakotala eloko moko te ya mabe ; nayinaka misala ya bato oyo bazangi kondima, ekoki kokangama na ngai te.
Tika ete banguna na ngai basepela te na tina na ngai ; tika ete bayini na ngai na kozanga tina bakanga miso te.
Moto oyo afinaka liso na mayele mabe alukaka mobulu, kasi moto oyo apamelaka na bosolo alukaka kimia.
Amitungisaka te mpo na nzela ya bomoi, alandaka nzela oyo ayebi te esika nini ekosuka.
Boye, tango okobelela Yawe, akoyanola yo ; tango okosenga lisungi, akoloba : ‹ Ngai oyo. › Soki kati na yo, olongoli ekangiseli, otiki kolakisa bato mosapi mpe otiki maloba mabe ;