Masese 6:12 - Mokanda na Bomoi12 Moto oyo atambolaka na lokuta na monoko azali moto ya Beliali, moto mabe : အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mpe tina mosusu oyo okotanga bango te na molongo ya basi bakufisa mibali ezali ete bakokoma bagoyigoyi mpe bakokoma koyengayenga na bandako ya bato mosusu. Na bongo, bakokoma bagoyigoyi kaka te, kasi mpe bato na bilobaloba, bato na songisongi mpe bato oyo balobaka makambo oyo basengeli kutu koloba te.
Tango Eliabi, kulutu ya Davidi, ayokaki ye koloba na bato yango, asilikelaki ye makasi mpe atunaki : — Oyaki awa mpo na nini ? Mpe na maboko ya nani otikaki mwa bameme na biso kati na esobe ? Nayebi ndenge lolendo na yo ezalaka mpe ndenge nini ozalaka mayele mabe. Oyei na yo kaka mpo na kotala bitumba.