6 Amitungisaka te mpo na nzela ya bomoi, alandaka nzela oyo ayebi te esika nini ekosuka.
Natali malamu etamboli na ngai mpe namizongisi kati na malako na Yo.
Okolakisa ngai nzela ya bomoi ; okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo, elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.
Lokola bosembo ememaka na bomoi, moto oyo alandaka nzela ya mabe alandaka nde nzela ya kufa.
Moto moko te oyo akotaka epai na ye azongaka mpe amonaka lisusu nzela ya bomoi.
Tala ndenge mwasi ya ndumba asalaka : Soki alie, apangusaka monoko ; mpe na sima, akoloba : « Nasali na ngai mabe te ! »
Bongisa nzela oyo makolo na yo ekolekela, mpe tambola kaka na nzela oyo oyebi malamu.
Solo, nzela ya moto ezali liboso ya Yawe, mpe ayekolaka malamu makambo nyonso oyo moto asalaka.
Mwasi ya zoba azali mwasi ya makelele, ayokaka te mpe azanga mayele,
Miso na bango elembaka te kolula basi mpo na koluka kosala na bango ekobo, balembaka te kosala masumu, bakosaka bato oyo balendisama malamu te na kondima ; bazali na mitema etonda na lokoso : bazali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe.