Eliya azongisaki : — Natie mobulu te kati na Isalaele. Kasi ezali nde yo mpe libota ya tata na yo bato bozali kosala mobulu, pamba te botosaki te mibeko ya Yawe mpe bolandi banzambe Bala.
Kasi tango mokonzi ayokaki sango ya likita ya Amani, akomaki mobeko kati na mokanda mpo ete makanisi mabe oyo Amani abongisaki mpo na Bayuda ekweya na moto na ye moko mpe, lisusu, badiembika ye elongo na bana na ye ya mibali, na nzete.
Soki olobi : « Tala, toyebaki likambo moko te kati na makambo oyo nyonso ; » boni, Ye oyo amekaka mitema asosolaka yango te ? Ye oyo abatelaka molimo na yo ayebaka yango te ? Afutaka te moto na moto kolanda misala na ye ?
Namoni likambo oyo : mwasi oyo motema na ye ezali lokola motambo to monyama, oyo maboko na ye ezali lokola minyololo, azali mabe koleka kufa ; mobali oyo asepelisaka Nzambe akotikala kokangama te na motambo na ye, kaka mobali oyo asalaka masumu nde akokangama na motambo na ye.
Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Maboko na Ye ekangi masumu na ngai ndenge bakangaka ekangiseli ; masumu yango emati ngai kino na kingo, mpe Nkolo asilisi makasi na ngai, akabi ngai na maboko ya bato oyo nazali na makoki ya kotelemela te.
Bana ya Isalaele babalolaki elongi na bango mpo na kotala mibali ya Benjame. Bongo mibali ya Benjame babangaki mpo ete bamonaki likama oyo ekomeli bango.