14 Etikalaki kaka moke ete nakweya na mabe ya mozindo, kati na Lingomba ya bato ya Nzambe. »
Nzokande mpo na ngai, etikalaki moke ete makolo na ngai eselumuka, etikalaki moke ete nakweya,
Moto oyo ayokaka pamela atambolaka na nzela ya bomoi, kasi moto oyo ayokaka pamela te apengwisaka bato mosusu.
Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya akomaka moto ya bwanya, kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba akomona pasi.
Mpo na nini nayokaki te mongongo ya balakisi na ngai mpe napesaki litoyi te epai ya bato oyo bazalaki koteya ngai ?
Melaka mayi ya libulu na yo moko, oyo ezali kobima penza na libulu na yo.