13 Mpo na nini nayokaki te mongongo ya balakisi na ngai mpe napesaki litoyi te epai ya bato oyo bazalaki koteya ngai ?
alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango : Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende.
Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo, mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;
Etikalaki kaka moke ete nakweya na mabe ya mozindo, kati na Lingomba ya bato ya Nzambe. »
Nazwi mokano ya kobima mpe kozonga epai ya tata na ngai ; nakoloba na ye : ‹ Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo.
Boye moto oyo atosaka mitindo yango te atiolaka moto te kasi atiolaka nde Nzambe oyo apesaki bino Molimo Mosantu na Ye.
Bokanisaka bakambi na bino, oyo bateyaki bino Liloba na Nzambe ; botala ndenge nini suka ya bomoi na bango ezalaki, mpe bomekola kondima na bango.