Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 5:12 - Mokanda na Bomoi

12 mpe oloba : « Mpo na nini nayinaki mateya, mpe motema na ngai eboyaki koyoka toli ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 5:12
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazongisaki : — Longwa wana. Balobaki lisusu : — Botala moto oyo, ayaki awa lokola mopaya ; sik’oyo alingi komikomisa mosambisi. Tokosala yo mabe koleka bango. Bongo batindikaki Loti na makasi mpe bapusanaki pene ya ekuke mpo na koluka kobuka yango.


Wana azalaki nanu koloba, mokonzi alobaki na ye : — Kata ! Nani atie yo mopesi toli ya mokonzi ? Kanga monoko na yo, soki te bakoboma yo ! Mosakoli abendaki nzoto ; kasi, liboso ya kokende, alobaki : — Lokola osali boye mpe oboyi koyoka toli na ngai, nandimisami ete Nzambe azwi mokano ya koboma yo.


Kasi bato ya Isalaele bazalaki kotiola bamemi sango ya Nzambe, bazalaki komona pamba makebisi na Ye mpe bazalaki kowolola basakoli na Ye kino Yawe kosilikela bato na Ye makasi ; mpe bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibikisa liboso ya kanda makasi ya Yawe.


Nzokande oyinaka malako na ngai mpe oyokaka te maloba na ngai ?


nasilaki mayele, nakomaki lokola zoba, nakomaki lokola nyama liboso na Yo.


« Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo ? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele ?


lokola bobwakaki toli na Ngai mpe boboyaki kondima pamela na Ngai,


Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ; bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.


Moto oyo ayokaka pamela atambolaka na nzela ya bomoi, kasi moto oyo ayokaka pamela te apengwisaka bato mosusu.


Moto oyo alingaka koyekola alingaka boyebi, kasi moto oyo aboyaka pamela azali zoba.


Bobola mpe soni ekomelaka bato oyo baboyaka koyekola, kasi moto oyo andimaka pamela akozwa lokumu.


Moto oyo azangi mayele atiolaka mateya ya tata na ye, kasi moto oyo andimaka pamela akokoma mayele.


noki te okokoma kolelalela na suka tango nzoto na yo ekolemba mpe makasi na yo ekosila,


Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole, makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi,


Kasi moto oyo atosaka ngai te amisalaka mabe ye moko : moto nyonso oyo ayinaka ngai alingaka kufa. »


Nzokande, nazalaki tango na tango kotinda basali na Ngai, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Bosala te makambo ya nkele oyo nayinaka. ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ