Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 5:1 - Mokanda na Bomoi

1 Mwana na ngai, zala na bokebi na bwanya na ngai, mpe pesa litoyi na yo na mayele na ngai,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 5:1
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai mpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai ;


Pesa matoyi mpe yoka toli ya bato ya bwanya, mpe tika ete motema na yo endima mateya na ngai.


Bana na ngai, boyokaka mateya ya tata, bozalaka na bokebi mpo ete bozwa mayele.


Mwana na ngai, zala na bokebi na maloba na ngai, pesa litoyi na yo na mateya na ngai.


Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo mpe kosundola te mateya ya mama na yo.


namonaki kati na molongo ya bato oyo bazangi mayele, kati na bilenge mibali, elenge mobali moko oyo azangi penza mayele.


Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.


Tika ete moto azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !


Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika ;


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, kufa ya mibale ekosala ye pasi ata moke te. »


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama ; nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango. »


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! »


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, oyo ezali kati na Paradizo ya Nzambe. »


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! »


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba !


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ