Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 4:5 - Mokanda na Bomoi

5 zwa bwanya, zwa mayele, kobosana yango te, kopesa mokongo te na maloba ya monoko na ngai,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 4:5
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe mpe alandaki banzela oyo Davidi, tata na ye, atambolaki na yango : apengwaki na yango te, ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali.


Makolo na ngai elandaki matambe na Ye ; natambolaki na nzela na Ye mpe natikalaki kopengwa na yango te.


Banyokoli mpe banguna na ngai bazali solo ebele, kasi ngai nakangamaka kaka na malako na Yo.


Solo, bato ya lolendo batiolaki ngai makasi ; kasi ngai, natikalaki kopengwa te na mibeko na Yo.


Makambo wana nyonso ekweyeli biso atako tobosanaki Yo te mpe tobebisaki Boyokani na Yo te,


Bwanya ezali malamu koleka wolo, mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.


Mpo na nini mbongo ezala na maboko ya zoba ? Mpo ete asomba bwanya wana azali na posa na yango te !


Moyimi alukaka kaka kosepelisa baposa na ye, atelemelaka bososoli nyonso.


Moto oyo alukaka kozwa bwanya alingaka bomoi na ye ; moto oyo alingaka mayele alongaka.


Luka bosolo, kasi koteka yango te ; sala se bongo na bwanya, na mateya mpe na mayele.


Mwana na Ngai, kobosana mateya na ngai te, kasi batela mibeko na ngai kati na motema na yo ;


Tala ebandeli ya bwanya : Zwa bwanya, pesa biloko nyonso oyo ozali na yango mpo ete ozwa mayele.


Bino bato oyo bozanga mayele, bokoma na bososoli ! Bino bazoba, bokoma mayele !


Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ