Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 4:3 - Mokanda na Bomoi

3 Ngai mpe nazalaki mwana malamu na miso ya tata na ngai, boye mama na ngai alingaki ngai makasi lokola mwana oyo abotama kaka ye moko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 4:3
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alobaki : « Salomo, mwana na ngai ya mobali, azali nanu elenge mpe ayebi nanu makambo malamu te. Nzokande, Ndako oyo esengeli kotongama mpo na Yawe esengeli kozala monene, kitoko mpe na lokumu mingi na miso ya bikolo nyonso. Yango wana, nakobongisa biloko mpo na Ndako yango. » Boye Davidi abongisaki biloko ebele liboso ete akufa.


Mokonzi Davidi alobaki na lisanga mobimba : — Salomo, mwana na ngai ya mobali, moko kaka oyo Nzambe aponi, azali nanu elenge mpe ayebi penza makambo malamu te. Nzokande, mosala ezali monene, pamba te Ndako oyo ezali mpo na moto te kasi mpo na Yawe Nzambe.


Tala bakombo ya bana na ye ya mibali oyo babotamaki na Yelusalemi : Shimea, Shobabi, Natan mpe Salomo. Ezali Batisheba, mwana mwasi ya Amieli, nde abotaki bana mibali minei oyo.


Oh Yawe, nayebi ete moto moko te azali mokonzi ya bomoi na ye ; moto oyo azali kotambola azali na bokonzi te ya kokamba matambe na ye.


Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.


Bobikaka na boyokani kati na bino mpe bozalaka na makanisi malamu mpo na baninga. Bozalaka na lofundu te, kasi bozalaka bato ya komikitisa. Bomimonaka te lokola bato bamikoka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ